“Lingomba ezali toli

“Lingomba ezali toli

Tamim Ad-Dâri (Allah asepela na ye) alobi, ya solo Ntoma (Kimia ezala likolo naye) alobaki: “Lingomba ezali toli” totunaki : pona nani? Alobaki: “pona Allah, na Buku na Ye, na Ntoma na Ye, mpe pona ba Imamu ya ba mizilman na lisanga na bango”.

[صحيح] [رواه مسلم]

الشرح

Ntoma (kimia ezala likolo naye) apesaki sango ete Lingomba etongama na bosembo pompe na bosolo, kino ete moto azala kokokisa yango mobimba lolenge oyo Allah asila kopesa Mitindo na yango, oyo ezali mosika na bozangi tope na bokosi. Balobaki na Ntoma (Kimia ezala likolo naye) ete: na Nani nde esengelami bosolo ya toli wana? Ayanolaki: Ya liboso: Toli na Allah -Nkembo naye Motombwami- : esangisi kati na yango bosembo na misala pona Ye, na bozangi kosangisa Ye na mosusu, na kondima na Bomoko na Ye na Bokeli, na Bozambe na Ye, na ba Kombo mpe na ba Lolenge na Ye, na kotombola mpe botosi mitindo na Ye, mpe kobenga bato na bondimi na yango. Ya mibale: Toli na buku naye, oyo ezali Coran Karim : yango ezali maloba naye, nsuka ya mikanda naye, mpe elongoli mibeko nyonso oyo ezalaki liboso na yango, mpe tozali kokumisa yango, na tozali kotanga yango Ndenge esengeli kotangama, mpe tosalaka engebene mitinda na yango na mokano, mpe tondimi oyo ekokani na yango, mpe toboyi ndimbola na yango, ya babongoli ntina na yango, mpe totaleli mateya na yango, mpe topalanganisi boyebi na yango, mpe tobengaka na nzila na yango. Ya misato: Toli pona ntoma naye Muhammad (s.a.w) Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia: tondimi ye azali suka ya bamemi-nsango, mpe tondimi ye, na maye amemaki, mpe totosa mitindo naye, mpe totika bipekiseli na ye, na tosambela Nzambe te kaka Ndenge ye alakisaki na oyo amemaki yango, na totombola droit naye, mpe totosa ye, na topalanganisa nsango na ye, na tolakisa mibeko naye, mpe koboya mabe bakoloba pona naye. Ya minei : Toli pona ba imamu ya ba musulmans : na kosunga bango na bosolo, na koboya kotelemela bango na Mibeko , mpe koyoka na kotosa bango na botosi ya Nzambe. Ya mitano : Toli na ba musulmans : kozala na boboto epai na bango, kobengisa bango, koboya kosala bango mabe, kolinga bolamu mpo na bango, mpe kosala elongo na bango na bosembo na bobangi Nzambe.

فوائد الحديث

Ordre ya toli ezali mpo na bato nyonso.

Toli ezali na esika munene pona lingomba.

Lingomba esangisi bondimeli, maloba mpe misala.

Toli esangisi komipetola na bokosi mpo na moto oyo bazali kopesa ye toli na kolinga bolamu mpo na ye.

Lolenge malamu ya kotangisa ya Ntoma (s a.w) Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, alobeli likambo en général, mpe alimboli yango na détail.

Kobandaka na oyo eleki ntina mpe sima oyo elandi, Ndenge Ntoma (s.a.w) Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, ebandaki na toli pona Nzambe, sima na buku na ye, sima na Ntoma naye (s.a.w), sima na ba imams ya ba musulmans, na public en général.

التصنيفات

Imam's Rights over the Subjects