إعدادات العرض
“Nzambe akobimisa polele mutu moko na ekólo na ngayi lokola mokonzi ya bozalisi na Mokolo ya Lisekwa
“Nzambe akobimisa polele mutu moko na ekólo na ngayi lokola mokonzi ya bozalisi na Mokolo ya Lisekwa
Kowuta na maloba ya Abdullah bin Amrin bin Al-Aas, Nzambe asepela na bango, alobaki: Ntoma ya Nzambe (s.a.w) alobaki: “Nzambe akobimisa polele mutu moko na ekólo na ngayi lokola mokonzi ya bozalisi na Mokolo ya Lisekwa mpe akotia likoló na ye makomi ntuku libwa na libwa 99, makomi moko moko kino liso ekomona ya go, Na nsima, akolobela ye : owangani ata moko ya makambo na oyo Bakomeli yo? Mpe na oyo bakangaki yango basalaki yo mabe? Akoloba: Te Nkolo nangayi, akolobela ye : balaa, yasolo bolamu na biso ezali pona yo, pamba te bako salayo injustice moko te lelo, Na nsima, bakobimisa carte moko oyo ezali na: Litatoli, Natatoli ete nzambe mosusu azali te kaka Allah, mpe natatoli ete Muhammad azali mosali mpe Ntoma naye, akolobaye: Mema kilo na yo, alobi Nkolo nanga, carte oyo eza na ba dossiers oyo eza nini? bakoloba naye: Bakomonela yo te, Alobi: Na nsima, batiya mikanda na loboko, mpe carte yango ekozala na loboko, yango mikanda ekómaki pepele, na carte yango ezalaki kilo, na eloko moko te ekoki kozala kilo koleka nkombo ya Nzambe”.
الترجمة
العربية English မြန်မာ Svenska Čeština ગુજરાતી Yorùbá Nederlands اردو Español Bahasa Indonesia ئۇيغۇرچە বাংলা Bosanski සිංහල हिन्दी Tiếng Việt Kurdî Hausa മലയാളം తెలుగు Kiswahili پښتو অসমীয়া Shqip دری Ελληνικά Български Fulfulde ಕನ್ನಡ Кыргызча Lietuvių or Română Kinyarwanda Српски тоҷикӣ O‘zbek नेपाली Moore Wolof Soomaali Tagalog Français Azərbaycan Українська Português Bambara தமிழ் Deutsch ქართული Македонски فارسی Magyar Русский 中文 ភាសាខ្មែរ Malagasy Oromoo ไทย da मराठी ਪੰਜਾਬੀ Türkçe Italiano አማርኛالشرح
Ntoma (s.a.w), apesaki nsango ete, Nzambe akopona moto moko kati na ekolo na ye likolo ya mitó ya bozalisi na mokolo ya lisekwa, mpe akobengama na mokumba kosambisama, Alakisi ye mikanda ntuku libwa na libwa, oyo ezali mikanda ya misala na ye ya mabe oyo asalaki na mokili oyo, mpe bolai ya mokanda moko na moko ezali molai oyo miso ekomona yango. Na nsima, Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akoloba na mutu wana: Owangani likambo moko na makambo oyo bakomelaki yo, na mikanda oyo? Esque banzelu na ngayi, bamonelaki yo na oyo babatelaki yango na mukanda? Mutu wana akoloba: Te, Nkolo na ngayi. Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akoloba naye : Ozali na Eleko ya koloba pona oyo osalaki na Mokili ? Na kobosana to mabe, ou bien na kozanga koyeba. Mobali yango akoloba: Te, Nkolo na Ngayi, nazali na eloko yako loba te. Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akoloba ete: oui, Yasolo yo ozali na bolamu epai na biso, na yango lelo bakomonela yo te. akoloba: babimisa carte oyo ekomami likolo na yango: Litatoli, Natatoli ete nzambe mosusu azali te kaka Allah, mpe natatoli ete Muhammad azali mosali mpe Ntoma naye. Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akoloba ete: pona mutu oyo, lakisa balance nayo. Mobali yango akoloba na kokamwa ete: Oh Nkolo! Kilo ya carte oyo na ebateli oyo eza nini?! Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akoloba: eloko yako monelayo ekozala te. Alobaki boye: Bazali kotiya mikanda na loboko moko, mpe carte yango ekozala na loboko moko. Na yango, loboko oyo ezalaki na ebombelo yango ekómaki pepele, mpe loboko oyo ezalaki na carte yango ebalukaki mpe ekómaki kilo, yango wana Nzambe alimbisaki ye.فوائد الحديث
Bonene ya liloba ya tauhid: kotatola ete nzambe mosusu azali te kaka Allah, mpe kilo na yango na kati ya balance.
Esuki te kaka koloba: Nzambe mosusu azali te bobele Allah, na monoko kaka, kasi esengeli mpe koyeba ndimbola na yango na kosala engebene na yango.
Bosembo mpe nguya ya kondima Nzambe moko ezali ntina ya kolimbisama masumu.
Bondimi ekeseni na bosembo oyo ezali na mitema, Na bato mosusu bakoki koloba liloba oyo kasi bako zua etumbu engebene na masumu na bango.