إعدادات العرض
Boyebi nini nde ezali matongi ? - Bayanolaki ye ete: Allah na Motindami na Ye nde bayebi malamu koleka! - Alobaki: -matongi - ezali “ koloba na sima ya ndeko nayo, na makambo oyo ayinaka ete bazala koloba yango. »,
Boyebi nini nde ezali matongi ? - Bayanolaki ye ete: Allah na Motindami na Ye nde bayebi malamu koleka! - Alobaki: -matongi - ezali “ koloba na sima ya ndeko nayo, na makambo oyo ayinaka ete bazala koloba yango. »,
Abou Hurairah (Allah asepela naye), ya solo Motindami ya Allah (kimia mpe mapamboli ya Allah ezala naye) alobi: « Boyebi nini nde ezali matongi ? - Bayanolaki ye ete: Allah na Motindami na Ye nde bayebi malamu koleka! - Alobaki: -matongi - ezali “ koloba na sima ya ndeko nayo, na makambo oyo ayinaka ete bazala koloba yango. », balobaki: omoni ndenge nini soki ezwami okati ya ndeko nangai maye nazali koloba ? Na Ntoma ayanolaki na koloba ete: "Soki ezali epai maye ozali koloba, yeba ete osili kotonga ye, kasi soki azali te lolenge wana, yeba ete osili bongo kokoselaye likambu." »
الترجمة
العربية বাংলা Bosanski English Español فارسی Français Indonesia Русский Tagalog Türkçe اردو 中文 हिन्दी Kurdî Hausa Português മലയാളം తెలుగు Kiswahili தமிழ் မြန်မာ Deutsch 日本語 پښتو Tiếng Việt অসমীয়া Shqip Svenska Čeština ગુજરાતી Yorùbá Nederlands ئۇيغۇرچە සිංහල دری Fulfulde Magyar ಕನ್ನಡ Кыргызча Lietuvių or Română Kinyarwanda Српски O‘zbek Moore नेपाली тоҷикӣ Wolof Soomaali Български Українська Azərbaycan ქართული Bambara Македонски Ελληνικά ភាសាខ្មែរ አማርኛ Malagasy Oromoo ไทย मराठी ਪੰਜਾਬੀ Italiano Akan Yao kmr Kirundiالشرح
Ntoma ya Allah (kimia ezala likolo naye) azali kolimbola bosolo ya matongi oyo epekisama ete: kolobela na mizilman na tango azali te, na makambo oyo ayinaka, ezala na maye matali lolenge ya nzoto to ya bizaleli naye, ndakisa ya koloba ete: azali na liso moko, azali mokosi to moyibi, tope balolenge misusu na oyo etali bizaleli mayinama, ata soki kutu balolenge wana ezwami epai naye. Kasi soki moto yango ezali kati naye te tope azali te na balolenge oyo balobeli naye, oyo nde ezali mabe makasi koleka matongi, pamba te, yango ezali bokosi, elingi koloba ete: kokosela moto makambo mpe kobamba likolo naye likambo oyo azali na yango te.فوائد الحديث
Botangisi malamu ya Ntoma (kimia ezala likolo naye), na tango ete azali kotangisa makambo - matali lingomba to oyo epekisama na lingomba - na nzela ya mituna.
Ezaleli malamu ya bayekoli (Allah asepela na bango) elongo na Ntoma (kimia mpe mapamboli ya Allah ezala likolo naye) na tango balobaki ete: ezali Allah na Motindami na Ye nde bayebi malamu koleka.
Maye masengeli na moto oyo batuni naye na maye azangi boyebi na yango, azala koloba ete: Allah nde ayebi malamu koleka.
Lolenge nkani mibeko ya Islam ebatelaka lisanga na bobateli ba drois mpe bondeko kati na bango.
Motonga eboyisama mpe epekisami longola kaka na makambo mosusu mpona ba ntinsa; kati na yango: Kosala ete bobubi ekende mosuka, na tango ete moto oyo abubami azali kotanga kombo ya moto oyo asalaki ye mabe epai ya moto oyo azali na makoki ya kozwa bosolo [droit] na ye. Naye azali koloba ete: moto kingani asali ngai mabe, tope asali ngai boye, mpe ezwami lisusu kati na yango: boluki toli epai ya moto mosusu, ndakisa na maye matali libala, na bosangani na makanisi [association], to na bosalisani [voisinages], mpe na maye makonana na yango.
