إعدادات العرض
Mutu oyo akokufa asangisaki Nzambe na eloko te, akokota na Paradis, na oyo akokufa asangisaki Nzambe na eloko, akokota na Lifelo”
Mutu oyo akokufa asangisaki Nzambe na eloko te, akokota na Paradis, na oyo akokufa asangisaki Nzambe na eloko, akokota na Lifelo”
Kowuta na maloba ya Jabir, Nzambe asepela na ye, alobaki: Mutu moko ayelaki ntoma (s.a.w), mpe alobaki: O Motindami ya Nzambe, bantina mibale ezali nini? Alobaki naye: “Mutu oyo akokufa asangisaki Nzambe na eloko te, akokota na Paradis, na oyo akokufa asangisaki Nzambe na eloko, akokota na Lifelo”.
الترجمة
العربية English မြန်မာ Svenska Čeština ગુજરાતી Yorùbá Nederlands اردو Español Bahasa Indonesia ئۇيغۇرچە বাংলা Bosanski සිංහල हिन्दी Tiếng Việt Kurdî Hausa മലയാളം తెలుగు Kiswahili پښتو অসমীয়া Shqip دری Ελληνικά Български Fulfulde ಕನ್ನಡ Кыргызча Lietuvių or Română Kinyarwanda Српски тоҷикӣ O‘zbek नेपाली Moore Wolof Soomaali Tagalog Français Azərbaycan Українська Português Bambara Deutsch தமிழ் ქართული Македонски Magyar فارسی Русский 中文 ភាសាខ្មែរ አማርኛ Malagasy Oromoo ไทย da मराठी ਪੰਜਾਬੀ Türkçe Italianoالشرح
Mutu moko atunaki Ntoma (s.a.w), ntina ya bizaleli mibale: oyo esengaka kokota na Paradis, na oyo esengaka kokota na Lifelo? Ntoma (s.a.w) mabondeli ya Nzambe mpe kimia ezala likolo na ye, ayanolaki : oyo esengaka Paradis, ezali mutu akufa naye azali kosambela Nzambe ye moko, mpe asangisa ye na eloko moko te. Na ezaleli oyo esengaka Lifelo ezali mutu akufa naye azali kosangisa nzambe na eloko, kosala nzambe na molongani, na moninga nakati ya bonzambe naye, ou bien na bokambi naye, to bankombo na bizaleli naye.فوائد الحديث
Avantage ya Tauhid bomoko ya nzambe, na mutu oyo akokufa lokola mondimi, asangisi nzambe na eloko moko te, ye akokota na Paradis.
Likama ya binzambi nzambi, pe oyo akufi na ko associer nzambe na eloko nyonso, ye akokota na Lifelo.
Bato ya Tauhid soki basali masumu, bazali na nse ya bolingi ya nzambe, soki nzambe alingi akopesa bango etumbu, na soki alingi akolimbisa bango, nde bakozala na mokano ya kokende na Paradis.