إعدادات العرض
Misala esalemaka na ba nia, mpe mutu nyonso akozala kaka na oyo atielaki mokano
Misala esalemaka na ba nia, mpe mutu nyonso akozala kaka na oyo atielaki mokano
Kowuta na maloba ya Omar bin Al-Khattab, Nzambe asepela na ye, alobaki: Motindami ya Nzambe (s.a.w) Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, alobaki : “Misala etongami na mokano, mpe mutu akozala kaka na oyo akanaki yango, oyo azali kokende pona Nzambe na Motindami na Ye, kokende naye ekozala pona Nzambe na Motindami na Ye. Mpe mutu oyo ako bima mpo na bolamu ya mokili oyo to pona mwasi ya kobala ye, kibima naye ekozala pona oyo akendelaki yango”. Mpe na maloba ya Al-Bukhari: “Misala esalemaka na ba nia, mpe mutu nyonso akozala kaka na oyo atielaki mokano”.
الترجمة
العربية বাংলা Bosanski English Español فارسی Français Bahasa Indonesia Русский Tagalog Türkçe اردو 中文 हिन्दी Kurdî Hausa Português മലയാളം తెలుగు Kiswahili தமிழ் မြန်မာ Deutsch 日本語 پښتو Tiếng Việt অসমীয়া Shqip Svenska Čeština ગુજરાતી Yorùbá Nederlands ئۇيغۇرچە සිංහල ไทย دری Fulfulde Magyar ಕನ್ನಡ Кыргызча Lietuvių or Română Kinyarwanda Српски тоҷикӣ O‘zbek Moore नेपाली Oromoo Wolof Soomaali Български Українська Azərbaycan Bambara ქართული Македонски Ελληνικά ភាសាខ្មែរ አማርኛ Malagasy Akan मराठी ਪੰਜਾਬੀ Italianoالشرح
Mosakoli (s.a.w) mabondeli ya Nzambe mpe kimia ezala likolo na ye, alimboli ete misala nyonso esalemaka na mokano, mpe ekateli oyo ezali ya monene na misala nyonso ya losambo mpe ya mombongo Oyo azali na mokano ya kozwa litomba na mosala naye, akozwa kaka litomba mpe bolingi wana ya kozwa mbano, mpe oyo azali na mokano na nzela ya mosala na ye ya kopusana penepene na Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akozwa mbano mpe bolamu mpo na mosala na ye, ata soki ezali mosala ya Momesano, lokola kolia mpe komela. Na sima ntoma (s.a.w) mabondeli mpe kimia ya Nzambe ezala likolo na ye, apesaki ndakisa mpo na kolakisa Ndenge ya mokano na misala, atako ekokani mpe ezomonana, yango wana alimbolaki boye, mutu nyonso akanaki kokende, mpe atikaki mboka na ye mpo na koluka esengo ya Nkolo naye, bongo migration na ye ezali migration légitime mpe acceptable mpe akozwa mbano na yango pona sincerité ya intention na ye, mpe oyo alingaki migration na ye a gagner bénéfice ya mokili, lokola mbongo to lokumu, To mombongo, to mwasi, yango wana akozwa kaka na bokimi na ye litomba ya oyo akanaki yango, mpe akozala na muke ya bolamu Moko te.فوائد الحديث
Elendiseli mpo na bosembo, mpo ete Nzambe andimaka misala te, longola se oyo esalemaka mpo na koluka elongi ya nzambe.
Misala oyo etiaka mutu penepene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, soki mutu oyo azali na mokumba asali yango lokola momeseno, akozwa mbano moko te mpo na yango, longola se soki akanaki yango mpo na kopusana penepene ya Nzambe.
التصنيفات
Acts of Heart