Ya solo baye oyo bazali na bosembo na miso ya Allah likolo ya bakiti ya pôlé, na mopanzi ya mobali ya Nkolo Mtondi-Mawa, Motondi Nguya,mpe Maboko na Ye mibale mazali sembo

Ya solo baye oyo bazali na bosembo na miso ya Allah likolo ya bakiti ya pôlé, na mopanzi ya mobali ya Nkolo Mtondi-Mawa, Motondi Nguya,mpe Maboko na Ye mibale mazali sembo

'Abdullâh ibn 'Amr (Allah asepela naye na moboti na ye) alobi ete Motindami ya Allah (losambo pe kimia ya Allah ezala likolo naye) alobaki: « Ya solo baye oyo bazali na bosembo na miso ya Allah likolo ya bakiti ya pôlé, na mopanzi ya mobali ya Nkolo Mtondi-Mawa, Motondi Nguya,mpe Maboko na Ye mibale mazali sembo, ezali baye oyo bazalaka bosembo na bokati mibeko na bango, na mabota na bango mpe na maye oyo bazali na mikumba na yango. »

[صحيح] [رواه مسلم]

الشرح

Mosakoli (s.a.w), ayebisi biso ete baye bakoyangela na bosembo mpe na bosolo kati na bato na nse ya etinda mpe bakonzi na bango mpe mabota na bango bakofanda na bakiti ya likolo, ya likolo oyo esalemi na lumière, mpo na lokumu na bango na Mokolo ya Lisekwa. Ba estrade oyo ekozali na loboko ya mobali ya nzambe ya Ngolu mingi, Oyo-Aleki-Likoló, mpe maboko na Ye mibale, Nkembo ezala na Ye, ekozali na loboko ya mobali.

فوائد الحديث

Bolamu ya bosembo mpe elendiseli na yango.

Kozala juste en générale mpe esangisi ba états nyonso, na Mibeko kati ya batu, kozala

juste pona basi na bana, na bato misusu.

Kolimbola ezalela ya bayengebene na Mokolo ya Lisekwa.

Bisika ya bato ya bondimi ekokesana na Mokolo ya Lisekwa, moko na moko engebene na misala na ye.

Lolenge ya kolendisa ezali moko ya mayele ya kosakola oyo elendisaka moto oyo azali kobengama atosa.

التصنيفات

Praiseworthy Morals