إعدادات العرض
Lobá: Nzambe mosusu azali te kaka Allah, na kotatola yango pona yo na mokolo ya lisekwa
Lobá: Nzambe mosusu azali te kaka Allah, na kotatola yango pona yo na mokolo ya lisekwa
Kowuta na maloba ya Abu Hurairah, Nzambe asepela na ye, alobaki: Motindami ya Nzambe (s.a.w) Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, alobaka na ndeko ya papa naye ya mobali : Lobá: Nzambe mosusu azali te kaka Allah, na kotatola yango pona yo na mokolo ya lisekwa”. Alobaki: Soki ba Quraysh bafingaka ngayi te, bango bakoloba: na memi yango pona bolembo, soki bongo te nalingaki nasepeli motema naye, Na sima Nzambe akitisaki verse: «Ya sôló, yo (Muhammad) okoki kokamba oyo olingi te, kasi Allah nde akambaka oyo aling» [Al-Qasas: 56].
الترجمة
العربية English မြန်မာ Svenska Čeština ગુજરાતી Yorùbá Nederlands اردو Español Bahasa Indonesia ئۇيغۇرچە বাংলা Bosanski සිංහල हिन्दी Tiếng Việt Hausa മലയാളം తెలుగు Kiswahili پښتو অসমীয়া Shqip دری Ελληνικά Български Fulfulde ಕನ್ನಡ Кыргызча Lietuvių Română Kinyarwanda Српски тоҷикӣ O‘zbek नेपाली Kurdî Wolof Moore Soomaali Français Українська Tagalog Azərbaycan தமிழ் Bambara Deutsch ქართული Português Македонски Magyar Русский 中文 فارسی ភាសាខ្មែរ አማርኛ Malagasy Oromoo ไทย मराठी ਪੰਜਾਬੀ Türkçe Italianoالشرح
Ntoma (s.a.w), asengaka Ndeko ya tata naye ya mobali Abu Talib, ntango azalaka na pasi ya liwa, ye aloba : “Nzambe mosusu azali te kaka Allah” pona asengela ye mawa mokolo ya lisekwa mpe akotatola Islam naye, Kasi ye aboyaki kobimisa litatoli pona kobanga ba Quraysh bakolakela ye mabe mpe bakoloba akoti na Islam pona kobanga liwa mpe bolembu! Alobaki na Prophète (s.a.w) : Soki ezalaki yango te, mbele nalingaki na mema esengo na motema na yo na kotanga Shahada, pe nasala posa na yo ekokisama tii okotonda! Na yango Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso abimisaki verset oyo elakisi Ntoma (s.a.w), azali na bokambi ya mutu te! Pona Islam, Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, ye moko nde apesaka elonga na mutu nyonso oyo ye alingi. Na prophète (s.a.w), akambaka bato na bokambi ya mateya, bososoli, na bokambi ya libyangi na nzela ya semba.فوائد الحديث
Bosolo ba tikaka yango te, pona kobanga makambo oyo bato balobaka.
Ntoma (s.a.w) Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, azali kaka na bokambi ya elembeteli na bolakisi bosolo, kasi bokambi ya mitema ya bato azali na yango te.
Légitimité ya kokende kotala infidèle oyo abeli malade, pona kobenga ye na Islam.
Mosakoli (s.a.w) Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, azalaki na mposa makasi ya kobenga bato epai ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso na Lolenge nyonso.