Mosali moko asalaki lisumu, na sima alobi: '' O Nkolo! Limbisa masumu na ngai

Mosali moko asalaki lisumu, na sima alobi: '' O Nkolo! Limbisa masumu na ngai

Abu Hurairah (Allah asepela naye) alobi ete Ntoma (kimia mpe boboto ezala ote naye) alobi kolandisama na maye Nkolo naye, (Allah Kembo na Ye) Alobaki naye ete: «Mosali moko asalaki lisumu, na sima alobi: '' O Nkolo! Limbisa masumu na ngai", Allah Lokumu naye, alobi: "Mosali na ngai asali lisumu, mpe ayebi ete azali na Nkolo oyo Alimbisaka masumu, lolenge moko pe Apesaka etumu likolo ya masumu. Kasi na sima mowumbu asali lisusu lisumu mpe alobi : " Ee Nkolo! Limbisa masumu na ngai, mpe Allah Lokumu naye, alobi lisusu ete: "Mosali na ngai asali lisumu, mpe ayebi ete azali na Nkolo oyo Alimbisaka masumu, lolenge moko pe Apesaka etumu likolo ya masumu. Kasi na sima mowumbu asali lisusu lisumu mpe alobi : " Ee Nkolo! Limbisa masumu na ngai, mpe Allah Lokumu naye, alobi lisusu : "Mosali na ngai asali lisumu, mpe ayebi ete azali na Nkolo oyo Alimbisaka masumu, lolenge moko pe Apesaka etumu likolo ya masumu. Sala nyonso olingi, mpo esi Nalimbisi yo».

[صحيح] [متفق عليه]

الشرح

Ntoma Muhammad (kimia mpe mapamboli ezala ote naye) azobeta maloba kowuta na Nkolo naye na koloba ete: moto asali masumu mpe na sima alobi: "Ee Nkolo! Limbisa masumu na ngai". Allah, Nkembo naye, alobi: "Mosali na ngai asali lisumu mpe ayebi ete azali na Nkolo oyo Alimbisaka masumu, mpe Abombaka ye na masumu wana mpe kolongisa ye na yango, tope -ayebi ete azali na Nkolo- oyo Apesaka likolo naye pona lisumu wana; -Allah alobi- Esi nalimbisi ye." Na nsima, mosali yango asali lisusu lisumu, mpe na sima alobi: "Ee Nkolo! Limbisa masumu na ngai". Na Allah alobi na ntina na yango ete: "Mosali na ngai asali lisumu mpe ayebi ete azali na Nkolo oyo Alimbisaka masumu, mpe Abombaka ye na masumu wana mpe kolongisa ye na yango, tope Apesaka etumbu likolo naye pona lisumu wana; -Allah alobi- Esi nalimbisi masumu pona mosali na ngai." Na sima mosali yango asali lisusu mususu, pe sima na yango asengi bolimbisi na koloba ete : "Ee Nkolo na ngai limbisa masumu na ngai". Na sima Allah alobi: "Mosali na ngai asali lisumu, na ye ayebi ete azali na Nkolo oyo Alimbisaka masumu, mpe Abombaka ye na masumu wana mpe kolongisa ye na yango, tope Apesaka etumbu likolo naye pona lisumu wana; -Allah alobi- Esi nalimbisi masumu pona mosali na ngai, yango wana; asala mae oyo alingi, na tango ete azali tango inso soki asumuki, na sima asundoli yango, ayoki mawa, mpe azwi mokano ya kozongela yango lisusu te. Kasi molimo na ye ekweisi ye pe azongi lisusu na masumu. Kasi na tango nyonso azali kotubela sima ya kosala, Nakolimbisa ye! Pamba ete kobongola motema (Tubela) elongolaka penza makambo nyonso ya kala."

فوائد الحديث

Bonene ya Mawa ya Allah mpona basali na Ye. Mpo ete moto, ata soki asali masumu mpe tango inso akosala (lisumu); na tango oyo atubeli na yango mpe azongi epai na Ye (Allah), Allah akondima tubela naye.

Mondimi na Allah, azalaka kolikya Bolimbisi ya Nkolo na ye, mpe kobanga Etumbu na Ye. Nde na yango, azalaka kowelisa na botubeli mpe na koyika te na masumu.

Mibeko ya tubela ya sôlo: ezali kotika misala ya masumu na; komiyoka mawa na ndenge akweisamaki na yango, mpe kozwa mokano ya kozongela yango lisusu te. Soki tubela wana etali mabe asalaki likolo ya batu, ezala na bozwi na bango, na lokumu tope na milimo na bango; wana mobeko ya minei ebakisami, yango ezali ete: kobongisa na mokolo likambo, tope kozongisela ye bosolo naye.

Motuya ya kozala na boyebi na Allah, mpo ete Ye nde asala ete mosali azala moyebi ya makambo ya lingomba na Ye, mpe azalaka kotubela na tango nyonso akweisami na mbeba, mpe alembaka te na kolikya mawa ya Allah, azala kolenda pe te na bosali mabe.

التصنيفات

Merits of Remembering Allah