“Na Oyo akotelema na Butu ya Mokano, na bondimi nyonso mpe na kolikya lifuti -epai ya Allah-, Bakolimbisa masumu naye oyo maleka”

“Na Oyo akotelema na Butu ya Mokano, na bondimi nyonso mpe na kolikya lifuti -epai ya Allah-, Bakolimbisa masumu naye oyo maleka”

Abu Hurairah (Allah asepela na ye) alobi ete : Motindami ya Allah (kimia mpe bolamu ya Allah ezala likolo naye) alobaki: “Na Oyo akotelema na Butu ya Mokano, na bondimi nyonso mpe na kolikya lifuti -epai ya Allah-, Bakolimbisa masumu naye oyo maleka”.

[صحيح] [متفق عليه]

الشرح

Ntoma Muhammad (kimia pe boboto ya Allah ezala likolo naye) azali kopesa sango na maye matali bolamu ya kotelema pona kosambela na butu ya Mokano, oyo ezalaka na kati ya mikolo zomi ya suka ya sanza ya Ramadan, mpe ya solo na oyo akozala molende na butu wana; na losambo, na masengi, na kotanga Al-Qur'ân tope na kokanisa Allah, naye azali mondimi na yango mpe na bolamu oyo eyaka na yango, naye azali kolikya lifuti ya Allah na mosala azali kosala na butu wana, nakoboya komilakisa to komiyokisa epai ya bato mosala naye wana, ya solo ye bakolimbisa kowuta na masumu naye oyo eleka.

فوائد الحديث

Bolamu ya Butu ya Mokano, mpe molende ya botelemi na butu wana.

Misala ya malamu endimamaka te obele kaka na makanisi ya malamu.

Bolamu ya Allah mpe ngolu na Ye, ete na oyo akotelema na butu ya Mokamo na bondimi nyonso mpe na kolikya lifuti - ya Allah -, bakolimbisa kowuta na masumu naye oyo eleka.

التصنيفات

Voluntary Night Prayer (Qiyaam), Last Ten Days of Ramadaan