إعدادات العرض
Ya sôlo Ar-Ruqâ, ba talisma mpe ba Tiwala ezali bosangisi Allah [Chirk].
Ya sôlo Ar-Ruqâ, ba talisma mpe ba Tiwala ezali bosangisi Allah [Chirk].
Abdullah bin Mas'oûd (Allah asepela naye) alobi ete, nayokaki Motindami ya Allah (kimia ezala likolo naye) azali koloba: « Ya sôlo Ar-Ruqâ, ba talisma mpe ba Tiwala ezali bosangisi Allah [Chirk]. ».
الترجمة
العربية বাংলা Bosanski English Español فارسی Indonesia Tagalog Türkçe اردو 中文 हिन्दी Français Kurdî Português മലയാളം తెలుగు Kiswahili தமிழ் සිංහල မြန်မာ Русский Deutsch 日本語 پښتو Tiếng Việt অসমীয়া Shqip Svenska Čeština ગુજરાતી Yorùbá Nederlands ئۇيغۇرچە Hausa دری Fulfulde Magyar ಕನ್ನಡ Кыргызча Lietuvių or Română Kinyarwanda Српски O‘zbek Moore नेपाली тоҷикӣ Wolof Soomaali Български Українська Azərbaycan ქართული Bambara Македонски Ελληνικά ភាសាខ្មែរ አማርኛ Malagasy Oromoo ไทย मराठी ਪੰਜਾਬੀ Italiano Akan yao kmrالشرح
Ntoma (kimia mpe boboto ezala likolo naye) alimbolaki makambo oyo misala nango ezali kati bosangisi Allah [Idolâtrie]; mpe kati na yango: Ya liboso: Ar-Ruqâ [incantation]: ezali maloba oyo bato ya kala bazalaki kosalela na kosenga kobikisama oyo etondisama bosangisi Allah [shirk]. Ya mibale: Ba Talisma ya mayaka mpe ya biloko mosusu ya ndenge wana; oyo bakangaka na bana, banyama mpe na basusu mpo na kobengana miso mabe. Ya misato: Tiwala: oyo basalaka mpona kolingisa moko kati ya balongani na mosusu. Makambo manso oyo mazali na kati ya bosangisi Nzambe; pamba te, yango ezali kotia eloko lokola nzela [cause], mpe yango ezali nzela ya bosolo te oyo emonisama na mibeko ya lingomba, mpe ezali te moko yaba nzela oyo elobelama mpona ya bomekolami. Na oyo etali ba nzela [cause] oyo mibeko elobela, ndakisa ya kotanga Coran, tope bakisi oyo elobelama na lingomba mpona bomekolami, yango epesama nzela na moto azala na bondimi ete yango ezali obele ba cause, mpe bondimi ete ya solo bosungami to bopesami pasi ezali obele na maboko ya Allah.فوائد الحديث
Kobatela bomoko ya Nzambe [Tawhid] mpe bondimi na maye mazwami te kati na yango.
Bopekisami ya kosalela ba makambo ya basangisi Nzambe, mpe ba amulet, mpe na biloko oyo ekangaka moto na bolingo kati ya balongani.
Bondimi ya moto na makambo misato oyo ete yango ezali yango ezali ba cause: wana ezali shirk ya moke; pamba te ye asili kotia maye oyo ezali nzela te nzela. Kasi soki azali kondima ete yango moko nde epesaka lisungi mpe mabe, wana ekokoma Shirki monene.
Likebi monene na boluki ba cause ya shirk mpe ya maye mapekisama.
Bopekisami ya kosal ruqa [incatation] mpo ete yango ezali kati ya balolenge ya shirki, longola se ma oyo elobamelama na bimeko okati na yango.
Esengeli motema ekangama se na Allah yemei, mpo ete epai na Ye nde ezwami maye mapesaka pasi mpe litomba, eloko moko te ekokani mpe esangana na Ye, moko te amemaka bolamu obele se Allah, mpe ezali na moko te oyo atiaka mabe mosika obele se Allah Motondi Nguya nyonso.
Ruqa oyo epesama nzela; ezali oyo esangani na mibeko misato:
1- Azala kondima ete ezali kaka cause, kasi epesaka esungaka te obele kaka na ndingisa ya Allah.
2- Esengeli ezwama okati ya Coran, yaba kombo mpe bozalisami ya Allah, lolenge wana na masengi mowuta na Ntoma mpe na masengi ya malamu oyo mapesama nzela.
3- Esengeli ezala na monoko oyo bato basosolaka yango, esangana te na maloba to ba talisma ya bonganga.
