yasolo droit ya nzambe ezali, basambelaye basangisa ye na eloko moko te, mpe droit ya basali naye ezali apesa bango etumbu te, na Mutu oyo asangisakiye te

yasolo droit ya nzambe ezali, basambelaye basangisa ye na eloko moko te, mpe droit ya basali naye ezali apesa bango etumbu te, na Mutu oyo asangisakiye te

Kowuta na maloba ya Muadh, Nzambe asepela na ye, alobaki: Nazalaki sima ya Prophète (s.a.w), likolo ya mpunda oyo babengi Ufayr. Ntoma alobaki : “ya Muadh, oyebi droit ya nzambe epayi ya basali naye, na droit ya basali epayi ya nzambe ?", nalobaki: nzambe na ntoma naye nde bayebi, ntoma alobaki: " yasolo droit ya nzambe ezali, basambelaye basangisa ye na eloko moko te, mpe droit ya basali naye ezali apesa bango etumbu te, na Mutu oyo asangisakiye te" Nalobaki: O Motindami ya Nzambe, namema nsango oyo epai ya bato? Alobaki boye: “Kopesa bango nsango te, bako likiya”.

[صحيح] [متفق عليه]

الشرح

Ntoma (s.a.w), alimbolaki droit ya nzambe likolo ya basali na ye, mpe droit ya basali na ye likolo ya Nzambe, mpe droit ya Nzambe likolo ya basali na ye ezali ete basambelaka ye moko mpe basangisaka ye na eloko moko te. Droit ya basali ewutaka na Nzambe ezali te kopesa etumbu na bato ya tauhid oyo basangisaka ye na eloko moko te. Na sima Muadh alobaki: O Motindami ya Nzambe, nasengeli kopesa nsango oyo epayi ya bato pona basepela mpe bazua esengo na boboto oyo? Ntoma (s.a.w), apekisaki ye pona kobanga bako likiya pona yango.

فوائد الحديث

Ndimbola ya droit ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso oyo ezali obligatoire epayi ya basali naye, basangisa ye na eloko moko te.

Ndimbola ya droit ya basali oyo epayi ya nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, ye moko na motema naye atiyaki yango wajibu na avantage na ngolo, akotisa bango na paradis, mpe apesa bango etumbu te.

Ezali na nsango monene mpo na bato ya Tauhid, ba oyo basangisaka nzambe na eloko moko te, pona nsuka na bango ezalaka kokota na paradis.

Muadh alobelaki hadith oyo liboso ya liwa naye. Pona kobanga kokweya na lisumu ya kobomba boyebi.

Kokebisa na kobimisa mwa ba hadiths na kati ya bato mosusu mpo na kobanga mpo na baye bayebi ndimbola na yango te. Yango etali oyo ezali na nse ya mosala te to ata ndelo moko ya mibeko ya Sharia.

Baoyo bazangi botosi na bato oyo bandimaka Nzambe moko bazali na nse ya bolingi ya Nzambe soki alingi, akopesa bango etumbu, mpe soki alingi, akolimbisa bango, mpe na nsima destin na bango ekozala na Paradis.

التصنيفات

Oneness of Allah's Worship, Excellence of Monotheism