[Ange] Jibril azalaki kokoba na kopesa ngai toli mpo na mozalani [voisin] na ngai, kino nakanisaki ete ako komisa ye moko kati ya bakitani ya bozwi [heritage] na ngai.

[Ange] Jibril azalaki kokoba na kopesa ngai toli mpo na mozalani [voisin] na ngai, kino nakanisaki ete ako komisa ye moko kati ya bakitani ya bozwi [heritage] na ngai.

Ibn Omar (Allah asepela naye na moboti naye) alobi: Ntoma ya Allah (kimia mpe mapamboli ezala likolo naye) alobaki: « [Ange] Jibril azalaki kokoba na kopesa ngai toli mpo na mozalani [voisin] na ngai, kino nakanisaki ete ako komisa ye moko kati ya bakitani ya bozwi [heritage] na ngai. »

[صحيح] [متفق عليه]

الشرح

Ntoma (kimia ezala likolo naye) azalaki kopesa sango ete -Ange- Jibril akobaki mingi kopesa naye mitindo ete azala malamu na voisin naye, oyo azali penepene ya ndako, ezala azali musulman to azala mopengwi, ezala azali kati ya bandeko naye tope bandeko naye te, - kozala malamu na vosin, ezali - na kobatela lotomo naye mpe kosala ye mabe te, kozala naye malamu, mpe kozala motema monene na bakokoso naye, [Ange Jibril azalaki kaka kobakisa mitindo] kino Ntoma akanisaki ete kotombola motuya ya vosin lotomo mpe kozongela ya Jabriel mingi maloba mpo na yango, Ntoma akomaki na makanisi lokola ete emonoiseli ekokita mpona kopesa ndambo ya mosolo na voisin naye oyo akotikala kozwa sima ya liwa naye.

فوائد الحديث

Bonene ya lotomo ya voisin mpe mitindo ya kobatela yango.

Bosolo ya lotomo ya voisin, kati ya mitindo na yango ezali: botosi ye, bolingo mpe bovandi naye malamu, koboya kosala ye mabe, kokende kotala ye ntango azali na maladi, kopesa ye longonya na ntango azali na esengo, mpe komonisa ye mawa mpe bovandisi yena ntango akutani na mpasi.

Tango inso ekuke ya voisin ezali pène - ya esika nayo -, tango inso lotomo naye ekolendisama.

Mobimba pe bokoki ya Charî'ah na maye esilaki koya na yango na oyo etali bovandi malamu na bazalani [ba voisin] mpe kotia mosika mabe manso makoki kopesa na bango pasi.

التصنيفات

Conciliation and Neighborhood Rulings