إعدادات العرض
“Moto oyo akomekola (imité) ekólo moko azali moko na bango”
“Moto oyo akomekola (imité) ekólo moko azali moko na bango”
Kowuta na maloba ya Ibn Omar, Nzambe asepela na bango mibale, alobaki: Ntoma ya Nzambe (S.aw) alobaki: “Moto oyo akomekola (imité) ekólo moko azali moko na bango”.
[حسن] [رواه أبو داود وأحمد]
الترجمة
العربية বাংলা Bosanski English Español فارسی Français Bahasa Indonesia Русский Tagalog Türkçe اردو 中文 हिन्दी Kurdî Hausa Português മലയാളം తెలుగు Kiswahili தமிழ் မြန်မာ Deutsch 日本語 پښتو Tiếng Việt অসমীয়া Shqip Svenska Čeština ગુજરાતી Yorùbá Nederlands ئۇيغۇرچە සිංහල دری Fulfulde Magyar ಕನ್ನಡ Кыргызча Lietuvių or Română Kinyarwanda Српски O‘zbek Moore नेपाली Wolof Soomaali Български Українська Azərbaycan ქართული тоҷикӣ Bambara Македонски Ελληνικά ភាសាខ្មែរ አማርኛ Malagasy Oromoo ไทย मराठी ਪੰਜਾਬੀ Italianoالشرح
Ntoma, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, ayebisi biso ete oyo azali komekola bato oyo bazali bato oyo bazangi kondima, bato ya bizaleli mabe, to bato ya sembo - na kosalaka likambo oyo ezali ezaleli na bango na oyo etali bindimeli, misala ya losambo, to mimeseno - . bongo azali moko na bango. Mpamba te komekola bango na libanda ememaka na komekola bango na kati, mpe ntembe ezali te ete komekola bato moko eutaka na bosepeli, mpe ekoki komema na kolinga bango, kokumisa bango, mpe kotia motema na bango, mpe yango ekoki komema moto na komekola bango ata na kati mpe na losambo - Nzambe apekisa biso-.فوائد الحديث
Kokebisa na komekola bato oyo bazangi kondima mpe bato ya mbindo.
Elendiseli mpo na komekola mpe komekola bayengebene bato malamu.
Komekola na libanda esalaka bolingo na kati.
Moto azali na ba menaces mpe na lisumu selon imitation na ye mpe Lolenge na yango.
Epekisami komekola bato oyo bazangi kondima na lingomba na bango mpe na mimeseno na bango, kasi oyo ezali bongo te, lokola koyekola misala ya maboko mpe makambo mosusu ya ndenge wana, ekotisami na epekiseli yango te.
التصنيفات
Forbidden Emulation