إعدادات العرض
“Bato - ya ngonga - na ngai nyonso bako kota na Paradizo longola se oyo aboyi
“Bato - ya ngonga - na ngai nyonso bako kota na Paradizo longola se oyo aboyi
Abu Hurairah (Allah andimela ye) alobi ete, Motindami ya Allah (kimia mpe mapamboli ya Allah ezala likolo naye) alobaki: “Bato - ya ngonga - na ngai nyonso bako kota na Paradizo longola se oyo aboyi” - Bayekoli - batunaki : Ee Motindami ya Allah ! Boye nani akoboya? Ayanolaki na bango na koloba ete: “Moto oyo akotosa ngai akokota na Paradizo, mpe oyo akozanga botosi ngai yende asili koboya”.
الترجمة
العربية বাংলা Bosanski English Español فارسی Français Bahasa Indonesia Русский Tagalog Türkçe اردو 中文 हिन्दी Kurdî Hausa Português മലയാളം తెలుగు Kiswahili தமிழ் မြန်မာ Deutsch 日本語 پښتو Tiếng Việt অসমীয়া Shqip Svenska Čeština ગુજરાતી Yorùbá Nederlands ئۇيغۇرچە සිංහල دری Fulfulde Magyar ಕನ್ನಡ Кыргызча Lietuvių or Română Kinyarwanda Српски O‘zbek Moore नेपाली тоҷикӣ Wolof Soomaali Български Українська Azərbaycan ქართული Bambara Македонски Ελληνικά ភាសាខ្មែរ አማርኛ Malagasy Oromoo ไทย मराठी ਪੰਜਾਬੀ Italiano Akan yaoالشرح
Ntoma ya Allah (kimia ezala likolo naye) azali kopesa sango ete Bato na ye nionso - sima ya boyeyi naye - bakozala kokota na kati ya Paradizo longola se bae oyo bakoboya! Bayekoli (Allah asepela na bango) batunaki Ntoma ete: Nani akozala koboya Ee Motindami ya Allah?! Ntoma (kimia mpe boboto ya Allah ezala likolo maye) ayanolaki bango ete: ya sôlo moto oyo akomikitisa, alandi mpe atosi Motindami ya Allah (kimia ezala naye) yende akozala kokota na Paradizo, mpe na oyo nyonso akozanga botosi mpe aboyi komikitisa na mibeko - ya Lingomba -, yemoko nde asili komipekisa bokoti na Paradizo likolo ya misala naye ya mbindo.فوائد الحديث
Ya sôlo botosi Motindami ya Allah (kimia ezala naye) ezali botosi Allah, mpe bozangi botosi ye ezali pe bozangi botosi Allah.
Botosi Ntoma (kimia mpe boboto ya Allah ezala likolo naye) ememaka na Paradizo mpe boboyi kotosa ye ememaka na Moto.
Sango malamu mpo na batosi - Ntoma - ya etuka oyo, mpo ete bakokota na Paradizo longola se baoyo baboyi kotosa Allah mpe Motindami na Ye.
Mawa ya Ntoma (kimia ezala likolo naye) epai ya bato na ye mpe mposa na ye ya makasi ya litambwisi na bango.
