إعدادات العرض
“Soki bamizilman mibale bazali kobunda na bibundeli na bango; mobomi na oyo babomi bango mibale bakokota na Lifelo
“Soki bamizilman mibale bazali kobunda na bibundeli na bango; mobomi na oyo babomi bango mibale bakokota na Lifelo
Abu Bakra (Allah asepela naye) alobi: Nayokaki Motindami ya Allah (kimia mpe mapamboli ya Allah ezala likolo naye) azali koloba: “Soki bamizilman mibale bazali kobunda na bibundeli na bango; mobomi na oyo babomi bango mibale bakokota na Lifelo”, na lobaki: Ee Motindami ya Allah! Oyo azali mobomi, ebongo likambo nini na oyo babomi? Na Ntoma Ayanolaki ete: “ moto oyo babomi, yepe azalaki na mposa makasi ya koboma moninga na ye”.
الترجمة
العربية বাংলা Bosanski English Español فارسی Français Bahasa Indonesia Русский Tagalog Türkçe اردو 中文 हिन्दी ئۇيغۇرچە Kurdî Hausa Português മലയാളം తెలుగు Kiswahili မြန်မာ Deutsch 日本語 پښتو Tiếng Việt অসমীয়া Shqip Svenska Čeština ગુજરાતી Yorùbá Nederlands සිංහල தமிழ் دری Fulfulde Magyar ಕನ್ನಡ Кыргызча Lietuvių or Română Kinyarwanda Српски тоҷикӣ O‘zbek Moore नेपाली Oromoo Wolof Soomaali Български Українська Azərbaycan Bambara ქართული Македонски Ελληνικά Akan ភាសាខ្មែរ አማርኛ Malagasy ไทย मराठी ਪੰਜਾਬੀ Italianoالشرح
Ntoma ya Allah (kimia ezala likolo naye) azali kopesa sango ete, soki ba mizilman mibale bakutani na bibundeli na bango, na makanisi ya kobomana; mobomi akozala na moto ya Lifelo mpo na ndenge alingaki koboma moninga naye. Maye wana epesaki Nkokoso epai ya Bayekoli, ezalaki likambo ya moto oyo babomaki: Ndenge nini akozala na kati ya moto ya Lifelo? Nde Ntoma (losambo mpe kimia ya Allah ezala likolo naye) ayanolaki ete moto wana, yepe azali na Lifelo mpo na mposa oyo azalaki na yango ya koluka koboma moninga na ye, mpe eloko moko oyo epekisaki ye na koboma ezali kaka kowelisa ya mobomi mpe kowelisa koboma naye na yango.فوائد الحديث
Etumbu epesamaka mpo na moto nyonso akozala na makanisi ya kosala maye mazali masumu na motema naye mpe atelemi na bokokisi yango.
Likebisi makasi mpo na kobunda kati ya bamizilman, mpe libangisi ya moto ya Lifelo pona yango.
Bitumba kati ya bamizilman bango na bango na maye mazali bosolo, ezali te kokota kati ya libangisi ya moto, lokola kobundisa babuki mibeko mpe babebisi mibeko.
Mosali bemba ya monene azalaka te kobima na Islam pona mosala naye wana; pambate Ntoma ya Allah (kimia ezala naye) abengaki babomani mibale wana bamizilman.
Soki ba misilman mibale bakutani na ba lolenge inso oyo ekozalela bango na bitumba, mpe soki moko na bango abomi mosusu; mobomi na oyo babomi bakokota na moto ya Lifelo. Mpe mopanga elobelami na hadith oyo na lolenge ya ndakisa.