إعدادات العرض
“Ya solo Allah atalaka te na bilongi pe na bozwi na bino, kasi (Allah) azalaka nde kotala na mitema pe na misala na bino
“Ya solo Allah atalaka te na bilongi pe na bozwi na bino, kasi (Allah) azalaka nde kotala na mitema pe na misala na bino
Abu Hurairah (Allah asepela naye) alobi: Motindami ya Allah (kimia ezala likolo naye) alobaki: “Ya solo Allah atalaka te na bilongi pe na bozwi na bino, kasi (Allah) azalaka nde kotala na mitema pe na misala na bino".
الترجمة
العربية বাংলা Bosanski English Español فارسی Français Bahasa Indonesia Русский Tagalog Türkçe اردو 中文 हिन्दी Kurdî Hausa Português മലയാളം తెలుగు Kiswahili தமிழ் မြန်မာ Deutsch 日本語 پښتو Tiếng Việt অসমীয়া Shqip Svenska Čeština ગુજરાતી Yorùbá Nederlands ئۇيغۇرچە සිංහල دری Fulfulde Magyar ಕನ್ನಡ Кыргызча Lietuvių or Română Kinyarwanda Српски тоҷикӣ O‘zbek Moore नेपाली Oromoo Wolof Soomaali Български Українська Azərbaycan Bambara ქართული Македонски Ελληνικά ភាសាខ្មែរ Akan አማርኛ Malagasy ไทย मराठी ਪੰਜਾਬੀ Italianoالشرح
Ntoma Muhammad (kimia ezala naye) azali kolimbola na koloba ete: ya solo Allah Nkolo ya Nkembo, azalaka te kotala na bilongi pe na banzoto ya basali naye, ete ezali kitoko to ezali mabe? tope ezali monene to ezali moke? (atalaka pe te soki) ezali ya bokolongono to ezali ya kobela? Azalaka pe kotala te na bozwi na bango, ete boye ezala mingi to moke? Na Allah Nkolo ya Nkembo, azalaka te kozwa to kotangela basali naye na makambo ya mokili oyo tope pona bokeseni na bango kati na yango, kasi Allah - Nkolo ya Lokumu - azalaka nde kotala na mitema na bango pe na maye oyo ezwami kati na yango, kowuta na bobangi pe bonsomi, bosolo mpe bosembo (bomoko ya Allah), tope na mikano ya mabe (oyo ekotaka na mitema) na boluki komilakisa, pe koyokisa. Mpe (Ye Allah) azalaka kotala na misala na bango na ndenge ya bosembo na yango pe na bobebisi na yango; mpe Azalaka kofuta lifuti pe bolamu pona yango to kofuta likolo na yango.فوائد الحديث
Kozala na bokebi ya kobongisa motema mpe kopetola yango uta na ndimbola nyonso ya kopamela.
Bosembo ya motema ewuti na mokano malamu, mpe bosembo ya misala ezali kolanda ntoma (s.a.w) kimia mpe mapamboli ezala likolo na ye, na yango ezali esika ya kotalela mpe kokanisa na Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.
Mutu asengeli te akosama pona bozui naye, to kitoko naye, ou bien nzoto na ye, to na eloko moko oyo ezo monana na mokili oyo.
Kokebisa kosala lolendo na makambo ya libanda, na ko zanga kobongisa oyo ya kati.